« Ntango ya mikano esili, kasi mpo na misala. Bokoli tolingi ekouta esika mosusu te. Ekobotama na bomipesi na biso, boyokani na biso, mpe ntina na biso ya mokumba ya lisanga. », wana maloba ma tata moyangeli ya etuka, Paulin Lendonolia, mokolo mwa mitano ya sanza ya mwambe oyo (5 août).
Kozongelaka ete mbongwana oyo tolobeli ekozwa ndimbola na yango mobimba kaka soki ebongolami na misala ya solo, oyo ekoki komekama, mpe oyo ekoumela, mikano mia Paulin Lendonolia mizali : kokitisa ba mikakatano mia oyo ebengami investissement, kolendisa mambi ma polele (tranparence), kobongisa elonga ya misala, mpe kosala ete boyangeli nwa nkita bozala.
Alakisaki, liboso lia basali ba nkita mpe bayi lisanga société civiles oyo bazalaki ebele, komipesa na ye ya kobongola Tshopo na ndenge ya malamu na nzela ya likanisi lia ye ya Tshopo Mosala, mpo na misala oyo esalemi malamu oyo ezali ko kolanda makanisi ma mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpo na Tshopo.
Maloba ma mwana mboka ya yambo ya Tshopo na bokangami bwa mateya ma sensibilisation mpo na mbongwana ya climat d’affaires na RDC na ANAPI elobeli mingi mposa ya Paulin Lendongolia ya kobongola Tshopo na ndenge ya malamu.
