1 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Tanganyika : ngubu abomi mwasi moko na Kongolo

Mwasi moko abomami na ngubu o ebale ya Congo, pene na mboka moko ebengami Katanga, kati na territoire ya Kongolo o etuka ya Tanganyika.

Kolanda maloba ma Jean Paul Ngongo oyo azali mokambi mwa territoire wana, ngubu abundisaki bato basato (3) na bwato o ebale mokolo mwa zomi na libwa ya sanza ya sambo oyo (19 juillet).

Bakonzi ba mboka balobaki ete nyama yango epalanganisa nsɔmɔ na etúká yango banda basanza mingi. Elakisaki ete esi etindi lapolo na bakonzi ba Kalemie, mboka-mokonzi ya etuka, mpo na kosenga kolongola nokinoki nyama oyo, lolenge ya nyama oyo ebatelami, mpo na kopekisa likama mosusu mpo na motango ya bato.

Nsango oyo epesi pasi epayi ya ba ike o mboka mobimba, bango bazali penza na somo pamba te kuna ba ngubu bazali kili kili.

2 Commentaires:

  • Freddy Mundenzi 19 juillet 2025

    En tout cas je suis vraiment ravie pour votre site d’information, je vous suis chaque jour sans interruption

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *