21.9 C
Kisangani
12 septembre 2026
spot_img

Sud-Kivu : na RN2, bato babale bakufi na likama lia nzela, basusu koleka zomi bazoki

Likama lioko ya nzela lisalemaki mokolo mwa mibale ya mposo oyo (mardi 29/05), na nzela ebengami « Route nationale numéro 2 (RN2) », na etando ya Kabare o etuka ya Sud-Kivu.

Bayi pulusu bwa Congo (PNC) balimboli été motuka moko ya monene ya mapinga mwa FARDC nde ekweyaki na esika moko ebengami Efo-perso, yango ezwami na Miti-Murhesa o etando ya Kabare.

Kolanda maloba mwa commandant ya PNC ya lac Kivu, commissaire Joseph Kalyandamwali oyo asololaki na bapanzi nsango bwa ACP ; likama lia motuka wana ya FARDC ebomi bato babale (2) mpe ezokisi basusu koleka zomi (+10).

Bayi PNC balimboli lisusu ete lapolo oyo ezali ya mwa ntango moke (bilan provisoire). Na sima ya bolukiluki, tango mosusu bato basusu baye bazokaki to mpe bakufaki bakoki komonana.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img