Mokolo mwa misato 28 février oyo, milulu misalemaki na Kamanyola, na etando ya Walendu na Sud Kivu, liboso ya mokonzi ya MONUSCO mpe mosali na ebonga moyengeli etuka ya Sud-kivu, mpe bayi population.
Milulu miye misalemaki na ntina ya bobendani bwa MONUSCO na etuka ya Sud-Kivu, na yango MONUSCO epesi ndako (base) na ye ya Kamanyola o maboko ya mapinga ya PNC, na base eye nde mapinga casques Bleus ya ekolo Pakistan mpe Indonésie ba bandaki kobika.
Ba pulusu ya mboka oyo bazwi Base yango bamonisi ete bako koba nse kosala mosala mwa bango ya kobatela bayi population mpe biloko bwa bango.
Ndenge MONUSCO ebendani mosala ezali kaka moko, police ezali na mosala ya kobatela bato na biloko bia bango, mission wana ezali kokoba, moto nioso oyo akolinga kozonga na molongo te, pulusu ako tia ye maboko. Bon citoyen akozala na problème te, droit de l’homme ebongi etosama, bato oyo bozo tracasser bato bango mpe ba se respecter (…) population ezala kimia epesa biso confiance ndenge ezalaki kopesa MONUSCO, makambo manso eko tambola ndenge elongobani.
emonisi Commissaire supérieur Bakunka Ngolikwenda Dona, commandant mokambi ya base ya Kamanyola eye MONUSCO epesi PNC.
To yeba ete uta mibu zomi na libwa nde MONUSCO ezwami o etando ya Kamanyola o nzela ya mapinga ya ekolo Pakistan mpe Indonésie mpo na libateli ya bayi civile.



