Mampinga ya basoda ya ekolo Congo démocratique (FARDC) bawangani ete batomboki ba M23 bakangi bitando ya Kaniola, Muzunzi, Ciruko, mpe Mulamba na territoire ya Walungu o etuka ya Sud-Kivu.
Na liyebisi lioko ya ba nsango (communiqué de presse), mapinga ma FARDC balakisaki et monguna azali koluka kolona somo epayi ya ba ike.
FARDC, secteur opérationnel Sukola 2 na Sud-Kivu, elingi koboya nsango oyo epanzani na ba réseaux sociaux, na oyo etali bokangi bwa bitando ya Kaniola, Muzunzi, Ciruko, mpe Mulamba na territoire ya Walungu epayi ya M23 nsima na bitumba ya mobulu liboso lia ba Wazalendo, na nombre imaginaire ya liwa kino le 8 août. Oyo ezali eloko mosusu te bobele lolenge ya lisano mabe mpo na monguna kosalela somo kati na ba ike mpe babundi, mpe lisusu kotia secteur na matata na bakambi na yango.
elobi Mbuyi Kalonji Reagan, molobeli ya secteur ya opérationnel Sukola 2 ya mampinga na Sud Kivu
Esengeli koyeba ete bitumba ya mobulu elobamaki na Walungu mpe Kabare mokolo ya misato ya mposo oyo mpe mokolo ya minei eleki. Bato banei bakufaki, kolanda ba nsango ya mboka.
