Kimia moke ezongi wuto bitumba bisalemaki mokolo mwa misato ya mposo oyo, na bitando ebele ya territoire ya Walungu, epayi wapi maminga ndenge na ndenge ya Wazalendo babandaki na batomboki ba AFC/M23.
Yango ezali mingi mingi na Mugogo, Walungu Centre, mpe Cagala, na nzela ya Kaniola, epayi wapi makelele ya masasi ya bibundeli ya kilo mpe ya pete eyokanaki mokolo mwa mibale (mardi).
Bitumba bizalaki na mobulu na Mugogo, na Walungu Centre, mpe na Kaniola. Ezali kimia na Mugogo mpe na Walungu Centre, kasi matata matikali makasi na Cagala.
elobi mokambi moko ya mboka
Ezali na bato bazwami na pasi na Cagala mpe Kaniola, kasi kino sik’oyo ezali mpasi mpo na kopesa motango ya sikisiki.
ebakisi mokambi mosusu
Bitumba biye bibebisi misala ya biteyelo mpe ya mombongo na Walungu, mpe mingi mingi mobembo na nzela ya mibale ya ekolo (RN2), oyo ekangisaka Bukavu, Walungu, mpe Mwenga.
