3 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Masano

Sima ya Milan mpe Monaco, RDC elingi esangana na Barcelone

Sango yango epanzani lelo. Ekolo Congo démocratique etie mokoloto na FC Barcelone, etuluku ya mboka Espagne, nsima na botiami mikoloto na AC Milan mpe AS Monaco mikolo mileki.

Ministre ya masano, Didier Budimbu, atie mokoloto na contrat oyo na bakambi ya etuluku oyo ya Espagne. Mbulamatari ya RDC ekopesa ba millions zomi ya ba euros (10 millions d’euros) mbula na mbula na Barça na kati ya boyokani oyo.

Bilemno bia RDC bikolakisama na bilamba bia masano ya ndembo ya FC Barcelone ; kasi bayi Barcelone bakopesa mpe maboko na bokoli bwa masano na mboka na biso.

Nsango oyo epesi esengo na ba ike balingaka masano ma ndembo o mboka Congo, mingi mingi ba oyo bakumisaka etuluku ya Barcelone.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *