21.9 C
Kisangani
14 septembre 2026
spot_img

RDC : Vital Kamerhe akosunga SNEL na kokokisa mikano mia ye

Mokambi mwa Assemblée nationale, Vital Kamerhe, akutanaki mpe asololaki na mokambi mwa SNEL, Fabrice Lusinde ; mokolo mwa mibale ya mposo oyo (mardi 28/05) na Kinshasa.

Bango babale basololaki na ntina ya maye matali mosala o kati ya SNEL, etukulu eye ekengelaka lotiliki.

Vital Kamerhe alingaki ayeba lolenge nini mosala ezali kosalema na SNEL, kasi mingimingi, ayeba lolenge nini SNEL azali kopesa biyano na ba posa ya ba ike na maye matali lotiliki na ba engumba binso. Na yango, ye asengaki na mokambi mwa SNEL apesa ye mokanda moko (memo) oyo ezali kolimbola makambo manso wana. Yango ekosala ete mokambi mwa Assemblée nationale asunga SNEL na kokokisa mikano mwa ye.

Mokambi mwa SNEL alobi ete akosala likita lioko na bakambi basusu bwa SNEL, mokolo mwa misato ya mposo oyo, na sima na yango nde akopesa Vital Kamerhe mokanda wana.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img