Mokolo moko nsima na likita lia libwa ya ICGLR na Kinshasa, Mokonzi mwa mboka, Félix Tshisekedi, ayambi moninga mwa ye ya Burundi, Évariste Ndayishimiye, na cité ya Union africaine o’mokolo mwa lomingo oyo (dimanche 16/11/2025).
Nsima na bokutani boye na kuku, bakambi babale bakolisaki masolo mpo na kosangisa bituluku na bango na ntina ya koyokanisa makanisi ma bango na makambo ma bikolo mibale mpe ya bituka.
Bikólo yango mibale ezwaki ekateli ya kolendisa boyokani na bango na makambo ya bilanga : batyaki sinyatili na mokanda ya boyokani, oyo etali bolukiluki, kopesa mateya, kopesana bato ya mayele, kobundisa maladi ya milona, mpe secteur ya mombongo ya bilanga.
Bandimi lisusu bondimi bwa bango ya kosala mbangu misala mia kokatisa ndelo oyo etali bopanzani mpe mombongo, kopesa bokasi bwa politiki na milende miye.
Tshisekedi na Ndayishimiye ba sakoli boyokani bwa bango na oyo etali etando ya Grands Lacs mpe bitambe oyo ekolanda ya ICGLR, na ntina ya kolendisa boyokani bona liboso lia mambi ma bokengi.
Bokutani boye bosukisi mobembo mwa mokonzi ya Burundi ya ngonga na Kinshasa.
