Mokonzi mwa mboka, Félix Tshisekedi, akomaki na Mbujimayi na pokwa ya mokolo mwa lomingo oyo mpo na mobembo mokuse ya mosala na etuka ya Kasaï-Oriental.
Tango akomi o ndako ya mpepo ya Bipemba, epayi wapi misala mia kobongisa yango mizali kosalema, mokambi mwa ekolo ayambamaki na ebele ya bato ya esengo. Ba ike balakisaki molende na bango na nzela ya ba nzembo, mabina, mpe esengo, kolakisa lisusu bokangami bwa bango na mokonzi.
Bakonzi ba politiki, bakonzi ba bonkoko, mpe baye ndenge na ndenge ya bisika bazalaki mpe mpo na koyamba ye, mwa koleka mbula moko nsima na botali bwa ye ya suka na etuka.
Nsima na kozwa lokumu ya basoda, Félix Tshisekedi alongwaki na ndako ya mpepo na makolo, azingami na ba ike, mpo na kozonga na ndako na ye.
