RDC : « Mopanzi nsango azali likolo ya mibeko te, ata Cardinal » (Félix Tshisekedi)

Na mikolo mia ye azali kolekisa o mboka France, mokonzi mwa ekolo Félix Tshisekedi, azali kosolola na bapanzi nsango. Mokolo mwa minei ya mposo oyo, ye asololaki na ba oyo la Le Figaro, bango batunaki ye mituna ebele.

Motuna ya motuya makasi mingi ezalaki oyo etali likambo lie ba zizi bazali kolandela episkopo-mokonzi, Tata Cardinal Fridolin Ambongo.

Na eyano apesi, Félix Tshisekedi alobi ete esengeli na moto nyoso azala na nse ya mibeko. Ye a limboli ete Tata Cardinal alobaki makambo mwa matata mpeza, maye mamonisaki ete ekolo Congo ezali kopesa bibundeli na batomboki bwa FDLR.

Soki ozali mopanzi nsango mpe olobi maloba ya lokuta mpe ya kofinga, ndenge moko asalaki sima ya liwa ya ministre, omi tie nakati ya likambo na ba zuzi. Mopanzi nsango azalaka likolo ya mibeko te. Ndenge moko mpo na Cardinal Fridolin Ambongo, archevêque ya Kinshasa. Kala mingi te akomaki kopesa ba nsango mpo na Rwanda na kolobaka ete RDC ezali kopesa bibundeli na ba milices hutu ya FDLR. Kasi tiká asala elakiseli. Esengeli te kosalela bonsomi ya koloba mpo na koloba lokuta, ata soki ozali cardinal.

elobi ye

Boyeba Félix Tshisekedi azali na mboka France uta mokolo misato, epayi wapi akutani na mokonzi mwa mboka wana, bango basololaki na maye matali libateli na Est ya RDC.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img