Mokolo mwa minei oyo ntuku mibale na libwa ya sanza ya mibale ya mbula 2024, Procureur général près la Cour de Cassation, Firmin Mvonde, ayebisi o te ya yoko liyebisi na bokutani na ba panzi sango o mboka mokonzi Kinshasa, liyebisi liko landana na lolenge ya liwa ya Chérubin Okende.
Kolanda na liloba ya motuya ya liyebisi eye, Firmin Mvonde a monisi na polele mbano ya bolukiluki oyo esalemi na ntina ya oyo etali liwa ya Chérubin Okende, ministre ya kala ya Transport mpe député national. Na yango, a monisi ete Chérubin Okende amibomaki ye meyi na komibeta masasi na motó, na ndenge wana aboyi bilobela binso milobamaki mingi ete ba bomaki ye.
Solo na bo keseni ya Sango oyo ezalaki ko tambola na mboka na ba panzi sango, Procureur général ya Cour de cassation a monisi ete ebundeli oyo a salelaki ezalaki ya mokengeli wa ye meyi Chérubin Okende mpe ete ebetamaki kaka mbala moko.
Nzoto na ye ezalaki na masasi te kasi ezalaki nde na lisasi lioko oyo ye moko amibetaki. Munduki oyo etikalaki na motuka, ezalaki ya mokengeli mwa ye, ebetamaki kaka mbala moko, na bokeseni na oyo totangaki na mokanda ya bapanzi sango ete Bakutaki nzoto na ye etondi na masasi. Autopsie oyo esalemaki na nzoto ya mowei Chérubin Okende emonisaki traumatisme moko te, longola kaka auto-influsion ya tempe oyo ebimaki na ngambo mosusu ya motó mpo na koleka na vitre.
emonisi Firmin Mvonde
To yeba ete Chérubin Okende bakutaka ye ya kokufa na kati ya motuka mwa ye, mokolo mwa zomi na misato ya sanza ya sambo ya mobu nkóto mibale na ntuku mibale na misato, na engumba mokonzi Kinshasa.
