Ministre ya Défense mpe babundi bwa kala, Jean Pierre Bemba Gombo, akomi na engumba Likasi o etuka ya Haut-Katanga ; mokolo mwa yambo ya mposo oyo (lundi 27 Mai 2024).
Na mobembo mwa ye, yambo ya kokende Likasi, ye alekaki nano na Lubumbashi, engumba mokonzi Haut-Katanga ; epayi wapi mokambi mwa etuka, Jacques Kyabula Katwe elongo na bayi libateli bayambaki ye.
Na sima, ye akeyi mbala moko o engumba Likasi. Ntina ya mobembo mwa ye na Likasi ezali mpo ya kotala lisanga liye lisalaka mandoki manene mwa kopanzana, oyo ebengami « Entreprise Africaine des explosifs (AFRIDEX) ».
Boyeba ete mikolo mileki, Jean Pierre Bemba Gombo azalaki libanda lia mboka RDC : ye akendaki o engumba Caire na mboka Égypte, kaka mpo na misala mwa libateli.



