Ministre ya kala oyo azali na mokumba ya Développement rural, François Rubota, mpe mosali mombongo Mike Kasenga, mokambi mwa lisanga Stever Construct Sotrad Water, bakosambisama mpo na koloba ete bapesaki misolo ya leta na likambo lia ba stations ya forage oyo efutami mingi.
Engebene na mokanda moko oyo ya esambiselo ya Cour ya Cassation ebimisaki na miso ya ba ike, likambo liye libongisami lokola likambo lia mbeba mpe bosambisami bokosalema na boloko bwa Makala, mokolo mwa yambo ya mposo oyo ezali koya (lundi).
Likambo liye libimisamaki nsima na bolukiluki bwa Inspection générale ya misolo (IGF). Nyonso ebandi na contrat ya botiami ya ba forages nkoto (1000) pe botongi bwa ba stations mobiles ya traitement ya mayi na bitando nkoto (1000) na RDC mobimba.
Mbulamatari ekomaki na boyokani na sanza ya minei ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale na moko (2021). Misala miango miealaki na motuya ya misolo mia dollars pene na ba milió nkama minei (400 millions), 398.982.383USD.
