21.8 C
Kisangani
21 septembre 2026
spot_img

RDC : franc congolais ezali kokoba kobungisa ntina na yango liboso ya dollar (1$ ekomi pene ya 2800FC)

Ntalo ya mbongwana ebalukaki lisusu mokolo mwa yambo ya mposo oyo (27/05) na Kinshasa. Na ba ndako ya mbongwana mosusu, dollar (1USD) ekokani na ba francs congolais nkoto mibale na nkama sambo na tuku mitano (2750FC), nzoka nde na misusu, ekomi ba francs nkoto mibale na nkama mwambe (2800FC).

Na bongo, franc congolais ezali kokoba kobungisa ntina na yango liboso ya Lisolo oyo ya bapaya ebengami bongo dollar américain.

Kasi, esengeli koyeba ete o ba ndako bwa mbongwana ya mosolo, moto na moto azali kobongola dollar na ntalo alingi, kolanda ba nsango bwa Radio Okapi.

Kolanda ba babongoli misolo (Cambistes) bwa Binza Ozone o etando ya Ngaliema, na engumba mokonzi Kinshasa, ntalo ya 1$ na banque ezali 2750FC. Kasi, soki batosi ntalo wana, ba ike balingi kokende kobongola mosolo epayi na bango te, pamba te ba ike bazali nse koluka kobongola na ntalo ya 2800FC.

Na lolenge makambo mazali kokende, bomoyi bwa ba ike bazali kokoma pasi, pamba te ntalo ya dollar ezali kosala ete ba ntalo ya biloko ebele emata na ba zando.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img