28 juillet 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Politiki

RDC : Félix Tshisekedi abandi mobembo mwa mosala na Tanganyika

Mokonzi mwa mboka, Félix Tshisekedi, abandi mobembo mwa ye ya mosala etuka ya Tanganyika, mokolo mwa ntuku ibale na motoba ya sanza ya zomi na moko oyo (26 novembre).

Botali boye bokowumela pene na mposo moko, bokozala na misala mingi, kati na yango likita linens lia zomi na moko ya bayangeli ba bituka (11e conférence des gouverneurs), mpe likita lia ntuku ibale na misato ya bakambi bwa mbulamatari (23e réunion du conseil des ministres), oyo ekokambama na Kalemie, engumba-mokonzi ya etuka ya Tanganyika.

Kolanda Giscard Kusema, mokambi mwa bapanzi nsango ya présidence, mobembo oyo na mosala ekosangisa mpe misala misusu kili kili, masolo ma mokonzi na ba ike, mpe bolukiluki bwa misala mia mbongwana.

Mokonzi mwa mboka asengeli kokamba likita lia mbulamatari na esika ya mosala na Kalemie. Bato mingi ba mbulamatari lokola mpe bayangeli basili kosala mobembo yango.

elobi Giscard Kusema

Likita lia bayangeli ba bituka ekozala moko ya biloko bia motuya ya mobembo oyo. Likita oyo esangisaka bango mpo na kolobela makambo ma mboka mpe mayele ya kozwa mpo na kolendisa boyangeli mpe botomboli bwa bituka.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *