21.3 C
Kisangani
15 septembre 2026
spot_img

RDC : Constant Mutamba asengi na Cour de Cassation elandela bato bwa 2x 2x mpo bazwa etumbu

Likambo liango likomi ya solo penza. Ministre ya Bosembo sika alingi koyoka likambo ya ba « pede » ata soko moke te. Ye asengi na ba zuzi, mokolo mwa zomi n’a mitano ya sanza oyo (15 Juin), balandela bango makasi mpe bapesa bango etumbu.

Na mboka RDC, ba ike bazali kokamwa komona ete mibali bakomi kosangisa nzoto na mibali, basi mpe bazali kosangisa nzoto bango na bango. Eloko ezali kopesa pasi makasi ezali mingi mingi komona ete bango bazali lisusu kobatama mpe kowangana te.

Na lisanga lia bango libengami LGBT, bakomi kosenga ete bayebana lokola bato bwa motuya. Kasi, ministre ya Bosembo ya sika, Constant Mutamba, alingi eloko wana te. Na yango, ye akomeli zuzi mokambi bwa Cour de Cassation mokanda mpo ete alandela moto nyoso azali komiyeba lokola « 2x 2x ».

Mokanda yango ezali mpe mpo na kokebisa mpe kolandela bato banso

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img