Etuluku yoko ya basali ba mbulamatari ekomi lelo (11 septembre 2025) na Uvira, engumba mokonzi ya etuka ya Sud-Kivu na ngonga moke. Etuluku eye ekambami na Vice-Premier ministre, ministre ya Intérieur, Shabani Lukoo Bihango Jacquemain, azalaki elongo na ministre d’Etat, ministre ya Industrie, Aimé Boji Sangara, ministre ya coopération régionale, Floribert Anzuluni, ministre Délégué ya Défense mpe ya babundi ba kala, Eliezer Ntambwe, mokambi mwa mapinga ma FARDC, Général Jules Banza, mpe mokambi mwa PNC, Alongaboni.
Tango bakomi, bayambami na bayi bokengi ya etuka, mpe lisusu bakonzi ba politiki mpe ba oyo ya misala mia Leta, baponami ba etuka, bakonzi ba mapinga, bakambi ba société civile, bakonzi ba mbulamatari mwa etuka, mpe batindami ba lisanga Wazalendo.
Mobembo mwa mosala oyo elukaki kobɔndisa, kopesa kimia, mpe kozongisa bokonzi bwa Leta na eteni eye ya mboka, epayi wapi ba ike bakutanaki na mikolo ya mobulu, ematisaki loyenge, mpe lisusu mikolo mia koboya misala oyo ebengami « ville morte », oyo euti kosakolama na société civile mpe bakonzi ba mbulamatari ya etuka.
Wana, Jacquemain Shabani akokamba likita ya Comité ya sécurité mpo na kozwa botali bwa monene ya likambo lia bokengi, akosolola mpe na bakonzi banso ya etuka.
