Bosambisi bwa misato na bosambisami bwa ministre ya kala ya bosembo, Constant Mutamba Tungunga, bowumeli ngonga mingi mercredi 30 juillet oyo o esambiselo Cour de cassation na Kinshasa.
Na ebandeli, Mutamba ayebisaki ba zuzi ete atie ba « motions constitutionnelles » mibale : moko mpo na kotelemela mokano ya Assemblée nationale, mpe mosusu mpo na mokano ya provisoire oyo epesamaki le 23 juillet na Cour de cassation mpo na ba « objections » oyo bobateli (défense) bobimisaki.
Na kosunga ba avocats na ye, mofundami Constant Mutamba asengi na Cour de cassation etelemisa bosambisi na kozelaka mokano ya Cour constitutionnelle.
Soki bapesaki ngai ntango ya koloba, tolingaki kozala awa lelo te. Likambo ya mawa, mokano na bango se moko ezalaki ya kosilisa motelemeli politiki. Nakokima te, nakokende na yango kino na suka.
esakoli ye
Esambiselo ekangaki mpo na mwa ntango mpo na komibongisa na ntina y’a bosenga bwa mofundami. Ntango ezongaki, na ekateli na yango ya ntango mokuse, Cour de cassation eboyaki maloba ya bobateli ya kobuka mobeko likonzi mpe epesaki mitindo ete kosambisa yango ekoba.
Na kozwaka maloba, ba avocats ya ministre ya kala basengaki bosambisi ya ba témoins ya bobateli ebele mpo na kongenga ba zuzi, kati na bango ministre y’a yambo Judith Suminwa Tuluka mpe ministre ya bosembo ya kala, Justice Rose Mutombo.
Mofundami, Constant Mutamba, oyo amonanaki ete alembi, asengaki kozongisama nsima. Cour ya cassation ezongisaki likambo yango mokolo ya minei ya sanza ya mwambe (4 août) mpo bolukiluki bokoba.



