Mokolo ya yambo (lundi)14 septembre 2020 oyo mokonzi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba à yambaki Jean Saidi Bamanisa gouverneur ya Ituri, makambo ya kimia na Egumba ya Ituri na République Démocratique du Congo nde e zalaki ya motuya ô kati ya masolo na bango ya mokolo, na palais du peuple.
Na sima ya bo kutani oyo gouverneur ya province ya Ituri a zali na ko ndima na ko zela mbela (décisions) ya malamu oyo e ko zala mbuma ya bo kutani na bango ya mokolo oyo, mpona bolamu ya ba yi population ya Ituri oyo ba zali ko mona pasi na makambo oyo e tali bitumba mpe ba insécurité na eteni ya mboka na biso oyo.
Bo zongi ya kimia na Ituri nde e zali ya motuya mpona mwana mboka Jean Saidi Bamanisa.
To yeba ete delegation moko ya motuya oyo ba bengi na lopoto « délégation des hautes autorités de la République » e zali na ville ya Bunia nse mpona bo luki ya kimia, delegation yango e sangisi commissaire général ya la Police Nationale Congolaise, ba députés nationaux membres ya commission ya défense mpe sécurité ya assemblée nationale, mokonzi ya état-major général ya armée mpe ba officiers misusu ya armée na la police .
