Bato mwambe babungisaki bomoi na bango kati na sanza ya motoba mpe ya sanza ya nsambo na territoire ya Yakoma na Ubangi ya Nord, baye bazwaki mpasi na bitumba ya ba nzoku oyo bazalaki kotambolatambola. Likambo oyo euti kosalema kala mingi te esi esalemaki lisusu na sanza ya motoba, ntango moto moko ya mbula ntuku motoba na motoba (66 ans) abomamaki na nzoku ntango azalaki kokende na zamba mpo na kobuka vinyo ya mbila mpo na kotɛka.
Na mokanda motindamaki vendredi le 1er août na moyangeli mwa etuka ya Nord-Ubangi, société civile ya eyebisi ete bato mwambe baye bazwaki mpasi ezali na mwana mwasi moko ya mibu misato (3 ans) mpe mwana mwasi moko ya mibu zomi na minei (14 ans), Bango banso bazali na libota lioko o mboka Mbalo, kati na Lau-Est. Moto moko oyo abiki na libota oyo, oyo azoki makasi, atikali na lopitalo monene ya Yakoma.
Bayi société civile balobi ete likambo yango ezali kotungisa mingi mpe ezali kotia bato na mikakatano. Basengi na bakonzi ba etuka basala na lombango mpo na kobatela bitando oyo ezali na likama.
Atako makebisi mingi mapesamaki na boumeli ya mibu mitano mileki, mikano mia sikisiki ezwami naino te mpo na kopekisa ba mambi mana, oyo ezali kokoba bobele koboma bato te, kasi mpe kobebisa bisika minene oyo balonaka.
