Ba batano (5) bakufi mpe basusu bazoki na bitumba ya jeudi 6 novembre, kati na batomboki ya AFC/M23 mpe babundi ya Wazalendo ya ANCDH oyo etambwisami na Jean-Marie Bonane, na Kivuye, na territoire ya Masisi o etuka ya Nord-Kivu.
Kolanda maziba ebele, babundi ya Wazalendo balongaki kobengana batomboki baye na mboka nsima na bitumba. Babundi baye ya mboka basalaki etumba pene na ngonga ya 4h00 epayi ya batomboki, oyo ezwi esika eye wuto ba mposo mingi.
Balobi ete motango monene ya ba civils ata mitano bakufi mpe mitano bazoki na bitumba biye. Etando yango mpe esili mingimingi kozala na bato na yango te.
Banda mikolo mingi, esika eye ezali esika ya bitumba ya mobulu kati na batomboki ya AFC-M23 mpe babundi ya Wazalendo ya Collective of Movements for Change (CMC/NYATURA).
