Nord-Kivu : na Lubero, bato basato (3) bazoki na ba bombe ya ba M23

Ba bombe babwakamaki na batomboki ya M23 ezokisaki ata bato misato, mokolo mwa ntuku ibale na misato ya sanza ya yambo oyo (23 janvier) na engumba Lubangu, kati ya Bamate, etando ezwami na territoire ya Lubero o etuka ya Nord-Kivu.

Ezalaki Lieutenant-colonel Mak Hazukay, mokambi mwa mayebisi mpo na secteur opérationnel ya Sokola 1, nde apesi nsango yango na bapanzi nsango lelo.

Kolanda officier oyo ya FARDC, bato baye bazoki bazali mobali moko, mwasi moko mpe mwana moko. Bango bazokaki na biteni ya ba bombe oyo batomboki ya M23/RDF babwakaki.

Lisusu, Lieutenant-colonel Mak Hazukay azali na mawa mpo na bozwami bwa biteyelo, mangomba mpe bisika misusu ya bato banso na batomboki ya M23/RDF na eteni ya sud ya territoire ya Lubero na bobukani makasi ya mibeko ya bomoto ya molongo.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img