Moto ya mayele na mopesi toli ya likolo ya bokolongono, Prisca Luanda Kamala, asengi na minganga (infirmiers) na Nord-Kivu kozwa mangwele mpo na kobundisa Covid-19. Abandisaki libiangi oyo jeudi 12 mai 2022, na libaku ya mokolo ya mokili mobimba ya ba infirmiers, oyo ekumisami na engumba Goma.
Apesaki liboso mbote na mosala oyo basali ya minganga oyo, engebene ye, bapesaka oyo eleki malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya bato.
Lisusu, momonisi ya mokambi ya mampinga atelemeli bosangisi ya minganga na bitumba bikobi mpo na kobundisa Covid19, bokono ya mokili mobimba eye esali liwa mingi.
Biso oyo tozali minganga te, bomoyi bwa biso bizali o maboko mwa bino. Esengeli bino bozala ya kobongama mpo ya kozwa mangwele lokola biso, mpo ngai moko nasili kozwa mangwele mpo ete bato bazala na bondimi ete ntango bakokende kozwa lisalisi, bazali na maboko ya malamu. Nazali kosenga na bino na mokolo oyo mpo ete bopesi mangwele ya minganga ekoki komata soki tokokanisi yango na taux oyo tozali na yango lelo.
asengi Prisca Luanda Kamala.
Na libaku ya mokolo ya mokili mobimba ya minganga, misala mingi ebongisamaki na Goma.