24.6 C
Kisangani
8 août 2026
spot_img

Nord-Kivu : mapinga ma FARDC na ba Wazalendo balongi batomboki ba M23 na Kinyaongo

Etando ya Kinyaongo oyo ezwami na groupement Bapfuna, secteur Osso Banyungu na territoire ya Masisi, ezongi na maboko ma mampinga FARDC oyo esungami na babundi ya Wazalendo, uta lundi eleki, nsima na bitumba makasi na batomboki ya AFC/M23.

Engebene na maziba ya mboka lelo, baye babundaki bakangaki mboka yango kaka na ntongo wana yambo na kolongolama na bisika bia bango. Mampinga ma ekolo ebateli sikoyo bisika na yango kuna, nzokande batomboki bazongi sima na Kinyumba, pene na Nyabiondo, na nzela ya Pinga.

Bokangami lisusu ya Kinyaongo epesi nzela na bofungoli lisusu mobembo kati na Nyabiondo na Pinga, oyo etelemisamaki mwa ngonga yambo mpo na bitumba biye.

Bafandi mingi, oyo bakimaki na bamboka ya zingazinga to na zamba, babandi kozonga na ndako. Bato basusu oyo balongolami na bandako na bango bakimi na etuluku ya Ihana, na territoire ya Walikale, nzokande basusu batikali naino na bisika bia bango ya kobombana.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img