30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Libateli

Nord-Kivu : bitumba ya FARDC mpe ba Wazalendo na ba M23 ezongeli makasi na Kautu

Kimia ezali te ya Nyamaboko (territoire ya Masisi), na Nord-Kivu, ata ndenge mikanda lia kimia ya Doha na Qatar kati na mbulamatari mpe batomboki ba AFC/M23 endimisamaki. Mokolo mwa yambo ya mposo oyo (Lundi le 24 novembre) na tongo, bitumba ya sika elobamaki na Kautu kati na batomboki ba AFC/M23 mpe mampinga ma mbulamatari (FARDC) masungami na ba Wazalendo.

Na etando ya Osso Banyungu, batomboki baye bawutaki na Kazinga babundisaki mapinga mpe ba Wazalendo mpo na koluka kobotola etando ena.

Kolanda makelele ya masasi ya minduki ya kilo mpe ya pete, bavandi ya Kautu mpe Humura bakimi ba mboka wana. Mingi bazali kokende na Ntoto na etuka ya Waloa Uroba (territoire ya Walikale), nzoka nde basusu bazali kokima na zamba.

Bato baye bawutaki na bitumba biye eyebani nanu te, lokola bitumba bizali kosalama, kolanda ba sources na biso na esika eye.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *