Etando ya Buabo, na territoire ya Masisi (Nord-Kivu), ezalaki esika ya bitumba ya mobulu mikolo mileki, kati na batomboki ba M23-AFC mpe babundi ba Wazalendo ya lisanga APCLS. Makama mazalaki makasi : bato minei bakufaki, kati na bango mwasi moko mpe bebe na ye, mpe pene na bandako ntuku mitano ezikisamaki na bamboka ya Kibarangiriro mpe Kihuma.
Bitumba bikonaki mposo eleki na bitando ya Kihuma, Bulwa, Mafuo, mpe Lushebere, ememaki na bopanzi biloko (pillage). Engumba Bulwa-Kibarangiriro ezwaki mpasi mingi, mpe ebele ya bandako ezikaki. Bato soko zomi batikali kobunga.
Kokutana na makasi ya bitumba, bavandi mingi bakimaki na Masisi-centre mpe na Nyamaboko 1er. Basusu balukaki ekimelo na teritware ya pembeni ya Walikale.
Ebongiseli ya société civile ya mboka ezali kofunda misala miye ya mobulu, miye elobeli lokola « mbeba ya bomoto. » Esengi na bakonzi mpe na lisanga ya molongo kobatela noki noki ba civils mpe kolendisa boyokani ya diplomasi.
