Kokanga bato bia misala mabe ezali nse kokoba na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu, kolanda likanisi libengami « opération Safisha muji wa Goma ». Bato basusu ntuku motoba na motoba (66) bakangami, kati na bango ba rwandais motoba (6) bazali.
Na bolukiluki bia bango elongo, mapinga mia PNC mpe FARDC nde bakangaki bato wana, na butu ya mokolo mwa mibale kino mokolo mwa misato ya mposo oyo.
Na kati ya bato ntuku motoba na motoba (66) wana, miyibi bazali zomi na motoba (16), ba ndumba zomi na sambo (17) ya bana mikie (mineurs), bato ntuku mibale na minei (24) oyo bazali na mikanda te, mpe ba soda misato (3) bwa FARDC.
Molobeli mwa maire de la ville ya Goma, sous-lieutenant Olivier Sadiki Byanyangi, nde apesi nsango yango mokolo mwa misato ya mposo oyo, tango azalaki kolakisa bango epayi ya bapanzi nsango.



