Bobeti masasi minene ya likolo oyo FARDC ebandi na bisika bia batomboki ba AFC-M23 ekobaki o’mokolo ya lomingo oyo, le 21 septembre, na ba territoires ya Masisi mpe Walikale o etuka ya Nord-Kivu.
Ba bombes wana betamaki mingi mingi na bitando ya Mukwengwa, Bibwe, Nyarushamba, Nyenge, mpe Hembe na mokonzi ya Bashali (Masisi). Ba FARDC babetaki mpe ba M23 na Peti, na territoire ya Walikale.
Ba nsango ya mboka bayebisi ete FARDC ezali kobwaka ba bombardements na bisika ya batomboki ya AFC-M23 na ba territoires mibale miye. Bombardements ya likolo esalemi nsima na mikolo mibale milandani ya bitumba makasi kati na batomboki mpe coalition FARDC na Wazalendo.
Kozanga kopesa motango ya bakufi, ba nsango elobi ete bato bakufi ebele mpe bandako ezikisami na Mukengwa mpe Nyabikeri na Masisi na batomboki mpo na kozongisa mabe.

1 Comment