Bato ntuku mibale (20) bakufi o maboko ma batomboki ba ADF na Biambwe, mboka moko na etuka ya Manzia, na 64 km na Butembo. Ba ADF babundisaki lopitalo lioko, epayi wapi bato ba bokono zomi na mitano (15) mpe baninga na bango babomamaki na mbeto na bango, yambo na kopunza bisaleli y’a monganga mpe kotumba bandako mingi.
Etumba ebandaki pene na ngonga ya ntuku mibale na mibale (22h) na mokolo ya mitano. Kolanda babiki mpe bakambi ba mboka, ADF, baye bawutaki na etuka ya Maeba, nsima batumbaki bandako na ba districts mibale ya pembeni, Makuta mpe Mabiango, koboma ata bato mitano mosusu. Ekanisami ete motángo ya bato oyo bakufi ezali kati na bato 20 tii 22, mpe bandako koleka 20 ekómi mputulu ya mɔtɔ.
Bavandi baye bautaki kozonga nsima na bitumba ya kala, bazwi lisusu nsɔmɔ. Bazali kofunda kozanga makoki ma mampinga ya mboka mpo na kopekisa baye babundisaki bato koleka bisika na bango mpe kosala bangonga mingi kozanga etumbu.
