Na sima ya kolonga lisano lia ndembo liboso ya Egypito mokolo mwa lomingo momeki, Sébastien Desabre, molakisi ya ba Léopards, atondisami na kondima ete RDC e kolonga na lisano lia mokolo mwa mitano oyo mozali koya liboso ya Guinée.
Komona ntango ya kozonga nzoto kolongono oyo bayi Léopards ba zali na yango nde ematisi ye lolendo makasi.
Nazali na lolendo mpo na basani ba ngai mpe mingimingi mpo na ba fans. Tozalaki na mikolo mibale moke ya kozonga nzoto kolongono liboso ya bayi Egypito. Kasi awa tozali na mikolo minei yambo ya quarts de finale na Abidjan. To kozonga kolongono malamu. Iyo, lisano liboso ya Guinée to kosana yango mpo na kozala ntina, mpona ko longa. To yebi yango ete Guinée ezali équipe ya malamu. Ezali na quart de finale ya pamba te. Na pokwa ya lelo tozali kosepala na elonga na biso mpe to komizongisa na mosala mpo na kozala ya ntina makasi soki likoki lizali.
Amonisaki na polele liboso ya bapanzi nsango ya Canal+ , mokolo mwa eyenga oyo 28 janvier, na sima ya kolonga bayi Egypito.
Lisano lizali koya liboso ya Guinée, likobetama mokolo mwa misato ya sanza ya mibale. Yango ezelami makasi, pamba te ba congolais bazali na kondima ete elonga mosusu ezali.



