34.6 C
Kisangani
8 août 2026
spot_img

Na likita lia ONU na Genève, Rwanda ewangani lisusu M23

Na likita lia ntuku motoba ya Conseil ya droits de l’homme ya ONU, oyo esalemaki mardi 9 septembre na Genève, Rwanda eboyaki makasi bifundeli biye bizali kopesa maboko na batomboki ba M23 oyo bazali kosala na bituka bia monyele ya République démocratique ya Congo.

Momonisi ya libela ya Rwanda, Ambassadeur Urujeni Bakuramutsa, apamelaki bifundeli biye lokola bizali na moboko te, asengi bondimi bwa makasi ya maziba yambo na kozwa bosukisi :

« Rwanda ezali na posa ya kimya mpe bomoko. Mpe tokondima lisusu te bifundeli bizali na moboko te. »Liloba liye lizali na eyano na lapolo ya Haut-Commissaire ya ONU mpo na makoki ma bomoto, Volker Türk, oyo efundaki M23, oyo esungami na mampinga ma bokengi ya Rwanda (RDF), mpo na kosala mbeba makasi na bituka ya Nord mpe Sud-Kivu.

Kati na yango : kobomama na mokuse, minyoko mpe mobulu ya kosangisa nzoto, kozwa bato na makasi na mosala, mpe kokanga bato na nko.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img