Kinshasa : Mokonzi ya ekolo ako kutana na bayi politiki mpo na ko yeba makanisi mwa bango

Mokonzi ya ekolo Congo, Félix Antoine Tshisekedi Tshilombo, a sololaki mokolo ya mitano (vendredi) oyo na pokwa neti e lobamaki, maloba ma ye ma zwaki nganga minutes motoba (6), ô nzela ya bilili ya RTNC.

Solo mokonzi ya mboka a monisaki na polele ete poso eko ya, a ko banda makambo oyo e tali bokutani na bayi « leader » ya politiki mpo na ko yeba makanisi (opinions) ma bango, oyo eko sala ete « union sacrée ya nation » e salema.

Mokonzi ya ekolo a monisaki lisusu ete na sima ya bokutani na bayi politique ena, a ko zonga lisusu liboso ya bayi population mpo na ko solola, na yango a ko monisa na polele penza ba mbela (décisions) oyo a ko zwa yango.

Mokonzi ya ekolo a zwi mokano wana na sima ya ko mona mbilinga mbilinga ô kati ya lisanga ya politique FCC-CACH.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img