Mokolo ya misato ya pɔsɔ eye, Mokonzi Philippe asengi, lisanga ya mokili mobimba kosala mpo na bosilisi bitumba ya bobomi biye bizali koleka na Est ya RDC, na nsango apesi na Ekolo, mokolo moko yambo na mokolo ya ekolo ya Belgique.
Mokonzi ya ba Belges, oyo amoni ete peuple Congolais azali na bilikya minene na bokonzi na ye, abengisi bikolo ya mokili mobimba kosala elongo mpo na kosunga RDC “mpo na kokende liboso mpo na bokengi, bosembo mpe démocratie mingi”.
Bosengi boye bozali eyano na masengi mingi mapesamaki na Mokonzi na mobembo mwa ye, elongo na Mokonzi-mwasi, na Kinshasa, na Lubumbashi mpe na Bukavu.
Na kolobelaka mobembo na ye ya suka ya lisolo na mboka, Souverain belge alobi :
Na mobembo na biso na Congo, tozalaki na makoki ya kobalusa lokasa moko ya ntina na lisolo na biso ya bomoko na RDC. Makambo elobami, misala makasi esalemi. Kozala na botali na kimia na kala na biso ya kosangana epesaka biso nzela ya kotonga misala mpo na mikolo mizali koya elongo

Mpo na kosala yango, alobi ete akitisami na boyokani ya Belgique mpo na bokoli, diplomatie na yango mpe mampinga na yango “oyo ezali kosala mosala malamu mpenza”.
Mokonzi Philippe mpe mokonzi-mwasi Mathilde d’Udekem d’Acoz ya Belgique bautaki kokoma na RDC, na bobengisi ya mokonzi ya ekolo, Félix Antoine Tshisekedi Tshilombo, mpo na mobembo ya wuto le 7 kino le 13 juin 2022.
Ko kende ko tala eye ezalaki koyanola na maye Mokonzi ya ekolo Congo asalaki, wuto le 15 kino le 19 septembre 2019 na Belgique.