Na mokanda oyo atindelaki mokambi mwa Assemblée provinciale ya Maniema, vice-gouverneur Katisamba Makubuli Corneille asengi na baponami basalela bokonzi bwa bango ya bokengeli misala mia Gouverneur.
Na mokanda yango ya le 5 décembre 2025 oyo tomoni lelo, afundi mokonzi mwa ye na mbeba ya koyiba misolo mia leta. Lokola ndakisa, Vice-Gouverneur alobeli misolo mia dollars nkoto nkama mitano (500.000), oyo ekanamaki kaka mpo na misala mia mbulamatari.
Alobeli mpenzampenza bozangi makasi ya biloko ya ntina na badepartema mingi, kobanda na bozangi bwa ba nkasa ya misala kino na bozangi bwa biloko ya moboko ya bopeto.
Kaka na mokanda wana, vice-gouverneur abendi mpe likebi na bozangi lifuti lia basali ba leta, oyo ekanisami koleka sanza zomi na moko (11 mois). Andimi ete makambo maye mazali likambo ya kotungisa oyo esengi bososoli ya nokinoki.
Kokoba na mokanda na ye, vice-gouverneur Katisamba alakisaki maye ye abengi « liste non exhaustive » ya misolo mia leta oyo esalelami na ndenge ya mabe kozanga ndingisa ya solo mpe esanganaki, kolanda ye, na mikanda mia ntembe.



