Bato banei (4) bazwaki kake na mokolo mwa misato, 22 octobre 2025, na territoire ya Lubero (Nord-Kivu). Likambo liye lisalemaki na mpokwa makasi na Kanzanza, oyo ezwami na Kirumba. Engebene société civile ya mboka, ezalaki mbano ya mbula makasi oyo etondisaki esika yango, elongo na mipepe makasi.
Bato motoba bazwaki kake na ntango ya mbula oyo ezalaki kozindisa etuka. Na mawa, minei kati na bango bakufaki mbala moko, mpe basusu mibale batindamaki mpo na kozwa lisalisi ya monganga.
elobi Moïse Kahuyu, moko ya bayi société civile ya Vuyinga, oyo azalaki na kati ya bato bakendaki kozwa bibembe misusu ya baye bazwaki pasi.
Likama yango ebebisaki mpe biloko mingi. Na ndakisa, bikuke bisusu ya ndakonzambe moko ya Protesta ya mboka ebebaki.
Kaka mokolo wana, bato mibale babungisaki bomoi na bango na engumba Beni sima na mbula makasi. Moto ya liboso oyo azwaki pasi akufaki na mayi ya ebale Biatu, mpe ya mibale akufaki sima ya kokwea ya ndako moko o etando ya Beu.
