Kosamba ya Constant Mutamba, likambo oyo ebimisaki masolo mingi na ba mposo eleki na mboka mobimba, ewuti lisusu lobi misa nsango ya sika. Na malako ma Procureur général ya Cour de cassation, Firmin Mvonde Mambu, misolo mia dollars ba milio 19,9 oyo eyibamaki kati na likanisi lia kotonga boloko bwa sika o engumba Kisangani ezwamaki na suka mpe ezongisami na caisse ya Leta.
Engebene na mokanda mwa 5 septembre 2025, RAWBANK endimi na Procureur général ete esalaki mosala oyo babengi « retour ». Mingimingi, misolo miye mizalaki na compte ya société ya Zion Construction mipesamaki na compte ya Ministère ya Justice, na kombo ya « V/C FRIVAO. »
Bozongisi bwa misolo oyo emonanaki lokola elonga ya elilingi mpo na bazuzi, koyeba ete na mboka oyo makambo ma moyibi mwa misolo mia Leta esikaka malamu te. Esalemi kaka mikolo nsima na etumbu ya Constant Mutamba, ministre ya kala ya bosembo.
Mikolo mileki, esambiselo Cour de cassation ekatelaki ye etumbu ya mbula misato ya mosala ya makasi mpe mbula mitano ya kozanga makoki ma koponama.



