Esambiselo enene ya mapinga ekopesa mbano (verdict) na yango vendredi oyo le 12 septembre, na likambo litali mokonzi mwa mboka ya kala Joseph Kabila. Yango ezali kolanda ba nsango ya esambiselo oyo.
Na likita lia 22 août, ministère public esengaki etumbu ya liwa mpo na Joseph Kabila mpe asengi na bazuzi bapesa mitindo ya bokangami ya biloko ya mokonzi mwa kala mpe bokangami noki ya ye moko moto.
Uta bofungoli bwa yango, bosambisami bosalami kasi mofundami Joseph Kabila Kabange azalaki te. Mokambi ya kala ya Ekolo afundami na mbeba mingi, kati na yango koteka mboka, kosangana na batomboki ba AFC/M23, mpe ba mbeba misusu kili kili.
Bifundeli biye, biye mbulamatari ya mokonzi Félix Tshisekedi bimemaki, bitelemelamaki makasi na baye bazali pene na mokonzi mwa kala, baye bapamelaki « monyoko ya politiki » mpo na kolongola mobundi moko.



