27 avril 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Actualité Bosembo

Kosamba ya Kabila : likambo lizongisami kino mokolo mwa ntuku misato na moko ya sanza oyo (31 juillet)

Esambiselo enene ya mapinga (Haute Cour militaire), oyo efandi na makambo ma mbeba, epesi nzela ya kozongisa mposo moko na bosambisami kati na mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila na zuzi mokambi mwa mapinga (procureur général ya FARDC). Bosambisi oyo ekolanda ekosalema mokolo mwa ntuku misato na moko ya sanza ya sambo oyo (31 juillet).

Esambiselo endimaki bongo bosenga bwa ba avoka ya eteni oyo ebengami « partie civile » (République démocratique du Congo) ya kopesa bango nzela ya kozwa mikanda mia likambo liye mpo na kobongisa maloba ma bango.

Na audience ya vendredi 25 juillet 2025, parquet esengaki ete Joseph Kabila asambisama ata soki ye moko azali wana te, bosenga boye bondimamaki na esambiselo.

Mokonzi ya kala ya ekolo azali kofundama na molongo ya bifundeli ya makasi, kati na yango kosangana na botomboki, mbeba ya kotelemela kimia mpe bokengi ya bomoto, koboma moto na nko na minduki, kobalukela ekolo, kosangisa nzoto na makasi, konyokola, kobengana ye na mboka, mpe kozwa engumba Goma polele na makasi.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *