Bileyi biko tekamaka na ba ndako ya malili (mingi mingi piodi), mafuta mabengami ‘huile végétale’ mpe ba epices ; bizali komonana mpeza te mpe bimati talo makasi na engumba Kisangani o etuka ya Tshopo.
Carton ya soso ezalaki kotekama na ba francs congolais nkoto nkama moko (100.000FC) ebuti na nkoto nkama moko na tuku mitano ya ba francs congolais (150.000FC) ; oyo ya piodi ezalaki koto kama mibale na tuku sambo ya ba francs congolais (270.0000FC) ebuti na koto kama misato na tuku sambo ya ba francs congolais (370.000FC).
Ezali ndenge moko na ba ingrédients to biloko biye ba mama bako tiaka na bileyi mpo epesa pimbo na biloko yango mpe ebuti talo. Manso maye makomi na lolenge wuta sanza ya yambo ba masuwa bimemaka bileyi biye kowuta engumba mokonzi Kinshasa ezali kokoma lisusu na engumba ya Kisangani te, na yango na sima ya ba milulu ya suka ya sanza bileyi biye biliami makasi mpe bisali ete biango binso esila epayi ya bateki oyo ba sombaka ebele (grossiste).
To yeba ete likambo liye lizali kopesa pasi na bafandi ya engumba Kisangani mpo ete bomati ya talo eye, esali ete bileyi bisusu ewutaka bilanga, zamba to mpe talo ya ba mbisi emata. Na yango neti ntalo ya madesu oyo ebutaka na sanza ya zomi na mibale na nkoto sambo ya ba francs congolais (7000FC) ekita na nkoto mibale ya ba francs congolais (2000) esali ete madesu ekoma bileyi ya mikolo binso.
