30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Société

Kisangani : mpo na moyibi mpe kuluna, tata moko abetami lokola nyoka, liboso ya mwana mwa ye

Mokolo mwa minei ya mposo oyo na ngonga ya zomi na motoba, kuluna yoko abetami pene ya liwa na bafandi ya avenue Bini na quartier Tshatshi, commune Makiso, na engumba Kisangani.

Kuluna oyo azalaki na baninga ba ye motango ko leka zomi, na bozongi bwa bango ko tika ndeko na bango yoko na kunda.

Soki okutani na bandeko oyo na nzela yebela mpo bako botola yo tshombo mpe ba toboli yo mbeli neti kaka l’Etat azali lisusu te.

Solo kokoma na bango na avenue Bini, liboso ya garage oyo ezali pembeni ya kelasi ya Likunde, batoboli ndeko mobali yoko mofandi ya avenue ena mbeli mpe babotoli moleki nzela yoko tshombo na ye.

Ba ike komona boye, balandi mpe batie maboko na kuluna yoko kati ya ba kuluna oyo balaki kokima neti ba punda, ndeko mobali oyo a betami makasi lokola nyoka, kasi mwana moko azalaki nzinganzinga kosakana ayoki bazali kobeta moyibi, nzoka nde ezalaki tata wa ye, mwana atangisi pinzoli.

Kolanda na maloba mwa mwana ya kuluna oyo, bango bafandaka mosika te na esika tata waye a betami. Soni mpe mawa ndeko mobali Congolais akomi na elongi ya ba Japonais na sima ya kozwa bibotu ya solo solo.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *