Bilembo ya boyeyi ya Moïse Katumbi na engumba Kisangani e zali ko koma mingi mpe makasi. Kuna o ndako ya lingomba politiki mwa ye, Ensemble pour la République, bokutani ya bayi politiki e zali ko koba mikolo inso.
O mokolo ya eminey ya poso oyo lisusu, ba kambi ya lingomba wana awa na Tshopo ba bengaki lisusu ba panzi sango mpo yako lobela likambo li tali boyeyi ya mokonzi mwa bango.
Jean-Clude Esuka, mokambi ya lingomba politiki Ensemble pour la République awa na Tshopo, a zongeli lisusu maloba mwa ye na likambo e tali mokolo mpe tina ya boyeyi ya Moïse Katumbi.

Bo zali bino moko ko mono maye ma zali ko lekana awa na engumba Kisangani. Kisangani e zali ko ningana. Likambo linene li zali ko lengelama. E kokani na bozongi ya Yesu mpo na baclistu. E zali pamba te, ko mono Moïse a poni Kisangani mpo na ko botisa lingomba mwa ye na Tshopo.
To yeba ete Moïse Katumbi ako koma na engumba Kisangani o mokolo ya liboso ya poso e zali ko ya.