Elenge Patrick Abisa Tabora, mokati suki to mpe coiffeur ya salon Nil Love na commune Kabondo na quartier Tshopo, a lakisi na nzela ya Kaba Lisolo ete mosala ya ko kata suki e zali likabo oyo moto a botamaka na yango. Na lolenge wana nde ye a sungamaka na yango mikolo nioso mpe a bikelaka na libota na ya mobimba.
Uta 2006, lelo na zali na mbula zomi na mitano (15 ans) uta na yekola mosala eye epayi ya moninga mwa ngayi Tresor Openge awa na Kisangani, na mipesa na yango na bompikili mpe nako ndima. Lelo na komi ko sunga bato mingi. Ngonga moko na kenda Kinshasa mpe Kimpese na Bas-Congo, kuna mpe natikaki mosala na ngayi te, pamba te na lingaka yango makasi.
e lobi Patrick Abisa Tabora, mokati suki.
A kobi na maloba mwa ye nako pesa eyano na motuna oyo Kaba Lisolo a tuni ye na oyo e tali litomba ya mosala mwa ye ya bokati suki :
Ko longola ba posa na ngayi ya mike mike, lelo oyo na zali na mwasi mpe na mwana moko, to bikaka lolenge nini ? Kaka nako kata suki oyo. Poso nyoso to zwaka ba 20.000 FC soki ba clients ba zali mingi, 25.000 FC, ata 30.000 FC. Na yango nde to sungaka libota. Kasi e zali kaka mbongo te, ko yebana mpe na bato ya tina, e zali ebele.
Kaba Lisolo a tunaki elenge mobali oyo mpona nini a poni mosala ya maboko. Ye a yanoli boye :
Moto nyoso abengami na bureau te, ngayi na zwa chance ya ko tanga mingi te, kasi na pesi litomba na eloko na zali ko sala, yango nde na zali ko bikela.
Mosala nyoso e zangaka mikakatano te
Elenge Patrick Abisa Tabora, ata ko sungama na mosala mwa ye, kasi a manyoli ete likambo ya lotiliki, to mpe courant nde e pesaka bango pkokoso makasi. Mpe ngonga moko ba clients ba monanaka te.
Na yango, elenge mwasi to mobali, ata o zali ko tanga, kasi ko yekola mosala ya maboko e zali kitoko mingi.
JOEL KISEZO



