Na suka ya mosala oyo esalemaki mokolo mwa ntuku ibale ya sanza ya zomi na moko oyo (20 novembre), elongo na ministre ya culture, arts et patrimoine, Yolande Elebe lokola mpe bakonzi ya libateli, Vice-Premier ministre ya Intérieur, Sécurité, Décentralisation mpe Affaires coutumier, Jacquemain Shabani, asakoli bokangami bwa bato motoba (6) baye bazali na boyokani na misala ya kobebisa biloko oyo esalemaki na mausolée ya Patrice Emery Lumumba.
Asimbaki mpe ete bato babale (2) basusu bazali kolukama.
Ezalaki na ntina mingi mpo na biso koyeba mpenza nini esalemaki mpe komindimisa ete bakosamba na mibeko. Oyo ezali likambo. Tokoki koyebisa bato ete na ezalela ya bolukiluki ya lelo, bato motoba bazali na bokangami mpe mibale basusu bazali kolukama mpe bakokangama kala mingi te.
elakisaki Jacquemin Shabani

Vice-Premier ministre akitisaki motema ete esika yango ezali sik’oyo na bokengi malamu mpe ete mikano misengeli mizwami mpo na kobatela lino (relique) ya elombe ya ekolo.
Tosalaki mpe ete esika yango ebatelama mpe. Tosali mabongisi na ba services ndenge na ndenge mpo ete yango esalema, mpe tokoki kondimisa likanisi, ezala na ekolo mpe na mokili mobimba, ete mpo na oyo etali relique, ebatelami.
elobi ye
Likambo liango esalemaki na butu ya mokolo mwa zomi na sambo tii mokolo mwa zomi na mwambe ya sanza ya zomi na moko oyo (17 au 18 novembre).
