Kosamba ya mibale ya Nathanaël Onokomba etiamaki mpo na mokolo mwa ntuku mibale na moko ya sanza oyo (21 août 2026), na boloko monene ya Makala, na Kinshasa, kolanda maloba ma molobeli (avocat) mwa ye.
Likita oyo ya sika ezali na kati ya ndenge makambo ya lisambisi etali Nathanaël Onokomba ezali kokende. Kasi, molobeli mwa ye alimboli ete naino esengeli kosala likambo moko ya mikanda liboso ete koyoka likambo yango esalema solo.
Esengeli mokoloto etiama na mokanda (ordonnance) moko ekopesa nzela ya kondimisa mokolo (date) ya likambo mpe koyebisa moto oyo etali likambo yango.
Yango wana, kosamba ya 21 août ekoki kozala litambe mosusu ya ntina na likambo oyo, na ntango likambo yango ezali kokoba kobenda likebi na Kinshasa.



