25.5 C
Kisangani
20 septembre 2026
spot_img

Kinshasa : bato motoba (6) bakufi mpe biloko ebele ebebi na mbula enokaki butu eleki

Mbula makasi enokaki na Kinshasa na butu ya jeudi kino vendredi le 2 mai, ebomaki bato motoba mpe ebebisaki biloko ya ebele. Bitand ebele ya engumba mokonzi, kati na yango Ngaliema, Mont Ngafula, Kisenso, Kalamu mpe Limete, ezwaki pasi makasi mpo na mpela, kokita ya mabele mpe bokoli bwa mitó ya bopanzani ya mabele.

District ya Camp Luka o etando ya Ngaliema ezwaki pasi mingi na liwa ya bato mitano (5), mingi mingi bana. Engebene na Don De Dieu, mofandi ya quartier oyo ya bato ya mosala, alobi ete « gouttière oyo ezalaki kowuta na Météo ekangamaki. Ezalaki na débordement ya mayi oyo ebebisaki bandako mingi awa na nse, epayi ya balabala Mbama. Bato mitano bakufaki. » Na Mont Ngafula, mwana mwasi moko ya sanza libwa (9 ans) mpe akufaki sima na kokita ya mabele.

Kobebisama monene ya biloko

Kobebisama ya biloko ezali monene na bitando ebele. Na Ngaliema, na Kisenso mpe na Mont Ngafula, bandako ebebaki na kokweya ya mabele. Mokambi ya Kisenso, Godé Atshwel Okel, alimboli likambo ya etando na ye :

Kisenso ezali commune érosive. Ezalaki na ba glissements ya mabele ebele. Ba ndako basusu ekweaki. Ba têtes ya érosion ezali kaka kokende liboso. Ezali na ba dégâts matériels na ba districts pene na sambo.

Ba nzela mpe ezwaki pasi. Na Mont Ngafula, ba nzela ya lokola oyo ya By Pass, kati na Triangle na arrêt Courant, mpe lisusu kolandana na yango na Elengesa, ebebaki. Balabala ya Tourisme na Ngaliema mpe ezwaki pasi.

Ba balabala ebele etondaki na mayi, mingi mingi na ba quartiers Ndanu na Limeté, Kauka, Yolo na Matonge na Kalamu, mpe na Kintambo.

Mbula ebebisaki mpe ba services ya télécommunications. Réseau Vodacom ezali koleka te na bitando ya Ngaliema na Mont Ngafula.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img