Bitumba ya sika kati na mapinga ma FARDC mpe batomboki ba M23 ebimaki mokolo mwa yambo ya mposo oyo (lundi 17 août) na bisika mingi ya territoire ya Kalehe, na Sud-Kivu, mingimingi na Katare, Tushunguti, Nyamugari mpe Kivoka.
Engebene na ba nsango ba société civile ya esika yango, bitumba ebandaki pene na ngonga ya motoba na tongo mpe ekómaki makasi pene na ngonga ya zomi, na nzela ya bibundeli ya minene makasi. Bato bakufi, bandako mpe ebebi, mpe mabota mingi bakimi bisika na bango. Kasi, motángo mwa bato oyo bakufi eyebani naino te.
Na ntina ya kobeba lisusu ya bokengi, société civile ezali kosenga bakonzi ba Congo mpe communauté internationale bákómisa lisusu makasi bobateli bwa ba ike mpe bázela te crise humanitaire ekóma lisusu makasi.
Na mokolo mwa mibale (mardi), kimya ya mwa ntango ezali komonana na bisika oyo bitumba esalemaki, kasi bato ba mboka bazali kaka na somo mpo na bokengi bwa bango.



