30.2 C
Kisangani
14 septembre 2026
spot_img

Julien Paluku asololi na ntina ya boyokani bwa RDC na Rwanda : « Litambe ya ntina mpo na kimia, kasi ba pota ekotikala »

Moyangeli ya kala ya Nord-Kivu mpe ministre ya commerce extérieur ya lelo, Julien Paluku Kahongya, asololaki vendredi oyo le 27 juin 2025, na nzela ya X na ye wuto Japon, epayi wapi alandaki botiyami maboko ya boyokani bwa kimia kati na République démocratique du Congo na Rwanda o engumba Washington.

Mpo na ye, boyokani bwa RDC na Rwanda ezali na ntina, kasi ekoki te kolongola pasi ya makasi oyo ba ike bayoki na bitumba te.

Ekolongola pasi te. Ba pota ekobika penza, kasi bankola ya lelo mpe ekoya ekomikundola etumba ya nsomo koleka wuto Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na liwa ya bato pene na ba milio zomi (10 millions de morts).

esakoli na makasi M. Paluku

Mokambi ya kala ya Nord-Kivu (2007-2019) akumisi mia mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpe ministre ya mambi ma bapaya Thérèse Kayikwamba Wagner. Apesi mpe longonya na Etats-Unis, na kolobela mingi Donald Trump mpe secrétaire d’Etat Marco Rubio mpo na kosangana na bango.

ÇA PEUT VOUS INTÉRESSER AUSSI

LAISSER UN COMMENTAIRE

S'il vous plaît entrez votre commentaire!
S'il vous plaît entrez votre nom ici

Suivez-nous
305,000FansJ'aime
6,259SuiveursSuivre
2,092AbonnésS'abonner
- Advertisement -spot_img