30 mai 2026
Ville de Kisangani, RD Congo
Lisanga

Ituri : na Mambasa, pulusu moko abomi moninga wa ye mpe amibomi ye moko

Mokolo mwa zomi na mitano ya sanza ya sambo oyo (15 juillet), o etando ya Lolwa kati ya Babila-Bakwanza, na territoire ya Mambasa, pulusu moko abomi moninga wa ye yambo ya komiboma ye moko. Epesi ba ike pasi.

Pulusu wana azali moko ya ba oyo bawutaki kati na lipinga lia PNC ya Bunia, engumba mokonzi ya etuka ya Ituri. Kasi, kino sikoyo, ba ike bayebi naino te ntina nini ye abomaki pulusu wana yambo ya komiboma.

Esengeli koyeba ete tango pulusu oyo azalaki kobeta masasi, bato basusu babale bazokaki. Bango bazali bongo na lopitalo mpo na kozwa kisi.

Ezali mbala ya yambo te likambo lia motindo oyo esalema na bituka bia monyele ya RDC, mingi mingi na etuka ya Ituri. Mbala mbala, ebandaka na koswana mpo na ba nionga, kowela mwasi mpe makambo kili kili.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *