Na Ituri, basali bilanga mingi na territoire ya Mambasa basengelaki kotika bilanga na bango mpo na bozali ya batomboki ba ADF na bitando ebele. Likambo liye ebimisi bobangi ya bozangi ya biloko ya kolia na ba zando ya mboka, nzoka nde ezali mpe na mikakatano epayi ya ba ike balukaka wolo, kolanda maloba ma bayi société civile.
Bozali ya ba ADF elobami na bitando ya Babila Bakwanza, Babila Babombi, mpe kala mingi te na oyo ya Mambasa. Batomboki baye bazali kozwa bisika kati na yango bisika ya mabanga ya ntalo mpe mabele minene ya bilanga, mpe kobebisa misala ya ntina ya nkita.
Kolanda Marie-Noel Anotane, mokambi ya lisanga société civile na Mambasa, likambo oyo ekoki kozala na makama ya makasi :
Bato bakoki lisusu kokende na misala na bango te. Bopesi biloko ya kolia ekomi na mikakatano, oyo ezali na likama ya kotungisa centre commercial ya Mambasa lokola mpe territoire ya Beni. Yango ekoki komema na bomati ya ntalo na ba zando.
Bavandi bazali kosenga na bakonzi ya mampinga koyeisa makasi misala mpo na kolandela batomboki ba ADF na bisika biye bakendaki kofanda. Bokonzi ya territoire elingi kozala na bondimisi, koloba ete milende mizali kosalema mpo na kobatela motango ya bato mpe kosala ete makambo ezala malamu.



